Philippians 2

Tolanda ndakisa ya komikitisa ya Kristo

1Soki bozali na nmpiko oyo ewutaka na lisanga na bino na Kristo, soki bozali na kolendisama oyo ewutaka na bolingo na ye, soki bozali na boyokani elongo na Molimo, soki bozali na bolingo mpe mawa, 2boye botondisa esengo na ngai na nzela ya kozala na likanisi moko, bolingo moko, motema moko mpe posa moko. 3Bosala eloko moko te na molimo ya kowelana, to mpe mpo na koluka lokumu ya pamba-pamba ; kasi na komikitisa nyonso bomona baninga na bino lokola nde baleki bino ; 4Moto moko te kati na bino aluka kaka bolamu na ye moko, kasi aluka mpe bolamu ya bandeko mosusu. 5Tika ete makanisi na bino ezala ndenge moko lokola oyo Kristo Yesu azalaki na yango :
6 Ye oyo azalaki na lolenge
ya Nzambe,
kasi amonaki yango te lokola
eloko ya kowelela,

7 kasi amikomisaki moto pamba,
akomaki lokola mowumbu.
Amikomisaki lokola moto,
mpe amimonisaki na lolenge
ya bato.

8 Amikitisaki penza,
mpe atosaki kino na liwa,
ata na liwa ya ekulusu.

9 Yango wana Nzambe atombolaki ye koleka likolo na nyonso,
mpe apesaki ye kombo oyo
eleki bakombo nyonso,

10 mpo ete na kombo na Yesu
mabolongo nyonso efukama,
oyo ezali
na likolo, na mokili mpe
na nse ya mabele,

11 mpe minoko nyonso etatola endima ete
Yesu Kristo azali Nkolo,
mpo na nkembo ya Nzambe Tata.

Makambo oyo mondimi asengeli kosala

12Yango wana, balingami, lokola botosaka ngai tango nyonso, kaka te tango nazalaka na bino, kasi ata sikʼoyo ndenge nazali na bino te, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na bobangi mpe na kolenga ; 13pamba te, ezali Nzambe moto asalaka kati na bino posa mpe makoki yakosala likambo na ndenge ya mabongisami na ye.

14Bosala likambo nyonso na koyima-yima te mpe na tembe te, 15mpo ete bozala na mbeba ata moko te mpe bozala peto, bana ya Nzambe oyo bazangi mbeba, na kati ya bato oyo babunga mpe babeba, kati na baoyo bino bozali kongenga lokola minda kati na mokili, 16ndenge bozali komema Liloba ya bomoi, mpo ete nakoka kozwa lokumu na mokolo ya Kristo, ete nakimaki mbangu to mpe nasalaki mosalapamba te. 17Mpe, atako makila na ngai esengeli kosopama lokola likabo likolo ya mbeka mpe likolo ya mosala ya kondima na bino, nazali na esengo mpo na yango mpe nazali kosepela elongo na bino nyonso. 18Bino mpe ndenge moko, bosepela mpo na yango mpe bosepela elongo na ngai.

Timote mpe Epafrodite

19Nazali na elikya, kati na Nkolo Yesu, kotindela bino Timotenoki penza, mpo ete nalendisama tango nakoyoka basango na bino.

20Pamba te, nazali na moto mosusu te awa, longola ye, oyo azali na makanisi moko na ngai mpe amitungisa mpo na bino. 21Pamba te, bango nyonso balukaka kaka bolamu na bango moko, kasi oyo ya Yesu Kristo te. 22Kasi bino moko boyebi ndenge Timote alakisaki mosala na ye, pamba te asalaki elongo na ngai na mosala ya kopanza Sango Malamu lokola tata na mwana na ye. 23Yango wana, nazali na elikya ya kotinda ye noki, tango nakomona ndenge makambo na ngai ekosuka.

24Kasi nazali na elikya kati na Nkolo, ete ngai moko mpe, nakoya kotala bino noki penza. 25Mpe, namoni ete ezali na tina mingi mpo natindela bino ndeko na ngai Epafrodite, moninga na ngai ya mosala mpe moninga na ngai ya etumba, oyo azali mpe, moto oyo bino botindaki mpo amemela ngai biloko oyo nazalaki na yango posa. 26Pamba te, azali na posa mingi mpo na komona bino nyonso, mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo boyokaki ete azalaki maladi. 27Ya solo azalaki maladi, mpe akomaki pene-pene ya liwa, kasi Nzambe ayokelaki ye mawa, kaka ye moko te, kasi na ngai mpe, mpo ete natonda na mawa te.

28Yango wana, nazali kotinda ye noki penza, mpo ete tango bokomona ye lisusu, bosepela mpe mawa na ngai ekita. 29Boyamba ye kati na Nkolo na esengo nyonso, mpe botosaka bato ya ndenge wana ; 30pamba te, alingaki kokufa mpo na mosala ya Kristo. Akabaki bomoi na ye, mpo ete apesa ngai lisalisi oyo bino bokokakikopesa ngai te.
Copyright information for LinMNB